Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 3:1 - Mokanda na Bomoi

1 Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli : ezalaki na ngonga ya misato sima na midi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 3:1
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.


Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.


Okotumba mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa.


Boye, mokonzi Dariusi akomaki mokano oyo azwaki mpo ete babongola yango te mpe atiaki mokoloto na mokano yango.


wana nazalaki nanu koloba, kati na losambo, Gabrieli, moto oyo namonaki liboso kati na emoniseli, ayaki epai na ngai na lombangu, na tango ya makabo ya pokwa.


Bokobonza mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa ;


Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi.


Wana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Tango ekomaki ngonga ya kotumba malasi ya ansa, lisanga mobimba ya basambeli ezalaki kosambela na libanda.


— Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela : moko azalaki Mofarizeo ; mpe mosusu, mofutisi mpako.


Yesu atindaki Petelo mpe Yoane ; alobaki na bango : — Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika.


Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.


Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo : — Bandeko, ezali Nkolo ! Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi.


Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli ; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye : — Kornei !


Kornei azongisaki : — Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai


Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.


Tango amonaki Petelo mpe Yoane kokota na Tempelo, asengaki bango likabo ya mawa.


Boye, Petelo mpe Yoane batalaki ye malamu, mpe Petelo alobaki na ye : — Tala biso !


Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.


Bongo moto moko ayaki koyebisa bango : — Boyoka ! Bato oyo bobwakaki na boloko, batelemi kuna na Tempelo mpe bazali koteya bato.


Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane.


Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko ; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ