Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 28:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nzokande, tata ya Pibiliusi azalaki ya kolala na mbeto mpo ete azalaki kobela fievele mpe pulupulu ya makila. Polo akendeki kotala ye, akotaki na ndako na ye, asambelaki, atielaki ye maboko mpe abikisaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 28:8
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso.


Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.


Bongo, alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo. Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu.


Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.


bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.


mpe abondelaki Ye makasi : « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa ! Nabondeli yo : yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. »


Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko.


Bamemelaki ye moto moko oyo akufa matoyi mpe alobaka te, mpe basengaki na Yesu ete atia ye maboko.


Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.


Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango.


Zingazinga ya esika oyo tozalaki, ezalaki na mabele ya Pibiliusi, kalaka mokonzi ya esanga. Ayambaki biso malamu epai na ye, mpe tolekisaki kuna mikolo misato.


Sima na yango, babeli mosusu ya esanga bayaki epai na ye mpe babikisamaki.


Petelo abimisaki bato nyonso ; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki : — Tabita, telema ! Tabita afungolaki miso ; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.


Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.


epai na mosusu kondima ; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ