Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 28:3 - Mokanda na Bomoi

3 Polo alokotaki liboke ya bakoni ; mpe tango abwakaki yango na moto, molunge ya moto ebimisaki etupa mpe ekangamaki na loboko na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 28:3
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akofiba ngenge ya nyoka, lolemo ya etupa ekoboma ye.


Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :


Tala, bozali kaka pamba, mpe misala na bino ezali bobele se pamba ; moto oyo aponi bino asali penza likambo ya nkele.


Bazali kopasola maki ya etupa mpe bazali kotonga ndako ya lifofe. Moto nyonso oyo akolia maki na yango akokufa ; mpe, soki apasoli liki moko, ekobimisa etupa.


Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo ; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.


Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye :


Bino, banyoka, libota ya bitupa ! Ndenge nini bokoki kokanisa ete bokokima etumbu ya lifelo ?


Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?


bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.


Bavandi ya esanga yango batalisaki biso bolingo monene mpe basungaki biso mingi. Lokola mvula ezalaki konoka mpe malili ezalaki makasi, bapelisaki moto mpe babengaki biso nyonso ete tokende koyetola.


Tango bavandi ya esanga bamonaki nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango : — Solo, moto oyo azali penza mobomi ! Awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye !


Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.


koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi ; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi ; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ