Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 28:23 - Mokanda na Bomoi

23 Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 28:23
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.


pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi ! »


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.


Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.


pamba te maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele, na nzela ya Makomi, ete Yesu azali Klisto.


Mikolo nyonso ya Saba, Polo azalaki koteya kati na ndako ya mayangani mpe azalaki koluka kondimisa Bayuda mpe bato ya Grese.


Bongo, Polo akendeki na ndako ya mayangani epai wapi, na basanza misato, azalaki koloba na molende epai na bato ; azalaki koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kondimisa bango yango.


Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.


Nzokande, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga « binzambe-nzambe. » Nandimaka nyonso oyo ekomama kati na Mobeko mpe kati na mikanda ya basakoli.


Mpe nazali kosamba lelo mpo na elikya na ngai kati na elaka oyo Nzambe apesaki na bakoko na biso.


azalaki kosakola sango ya Bokonzi ya Nzambe mpe koteya na tina na Nkolo Yesu-Klisto, na molende nyonso mpe na kozanga bipekiseli.


Filipo azwaki maloba mpe, na nzela ya eteni yango ya Makomi, ateyaki ye Sango Malamu ya Yesu.


epai ya Apia, ndeko na biso ya mwasi ; epai ya Arshipe, moninga na biso ya etumba ; mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka na ndako ya Filemo :


Nasengi na yo lisusu ete obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akozongisa ngai epai na bino lokola eyano na mabondeli na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ