Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.
Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba : — Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize.
Nzokande, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga « binzambe-nzambe. » Nandimaka nyonso oyo ekomama kati na Mobeko mpe kati na mikanda ya basakoli.
Ya liboso, nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu-Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino kati na mokili mobimba.
Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.
kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.