Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 28:18 - Mokanda na Bomoi

18 Sima na bato ya Rome koyekola na mozindo likambo na ngai, bazwaki mokano ya kotika ngai, pamba te bamonaki likambo moko te ya mabe oyo ekokaki kosala ete nazwa etumbu ya kufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 28:18
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo ; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.


Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango, kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya kufa to ya boloko.


Tango moyangeli apesaki Polo nzela ya koloba, Polo azongisaki : — Nayebi solo ete ozali mosambisi ya ekolo oyo wuta mibu ebele. Boye, nazali na esengo ya kosamba liboso na yo.


Felikisi, oyo ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela, azongisaki bango mpe alobaki : — Nakoyekola malamu likambo na bino tango mokonzi ya basoda, Lisiasi, akoya.


Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ