Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 28:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kati na engumba yango, tokutaki bandeko oyo basengaki biso ete tovanda elongo na bango poso mobimba. Ezali ndenge wana nde tokendeki na Rome.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 28:14
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »


Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yo mpe babatelaka mitindo na Yo.


Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa.


Mpo na yango, sango epanzanaki kati na bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te, kasi alobaki nde : « Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? »


Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale


Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli


Kasi biso tozwaki masuwa kati na engumba Filipi, sima na feti ya Mapa ezanga levire. Sima na biso kotambola mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi epai wapi tosalaki mikolo sambo.


Lokola tokutaki bayekoli kuna, tovandaki elongo na bango mikolo sambo. Nzokande Molimo asololaki na Bayekoli, mpe balobaki na Polo ete akende na Yelusalemi te.


Kolongwa wana, tonanaki pembeni-pembeni ya mokili mpe tokomaki na engumba Regio. Mokolo oyo elandaki, mopepe ya sude ekomaki kopepa mpe, sima na mikolo mibale, tokomaki na Puzoli.


Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka « Bandako misato, » mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe azwaki lisusu molende.


Bayuda bazongiselaki ye : — Biso awa, tozwaki ata mokanda moko te kowuta na Yuda na tina na yo ; mpe kati na bandeko oyo bayaki awa, moto ata moko te apesaki biso sango to ayebisaki biso likambo ya mabe na tina na yo.


Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bayebana na bizaleli na bango ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango.


Tango bandimi bayokaki likambo yango, bamemaki Saulo na Sezarea, mpe, longwa kuna, batindaki ye na Tarse.


Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ