Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 28:10 - Mokanda na Bomoi

10 Boye, bapesaki biso lokumu ya ndenge na ndenge ; mpe tango tokomaki pene ya kozongela mobembo na biso, bapesaki biso biloko nyonso oyo tozalaki na yango posa mpo na mobembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 28:10
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azaeli akendeki kokutana na Elize, amemaki elongo na ye likabo ya biloko nyonso ya Damasi ; bamemaki yango na likolo ya bashamo tuku minei. Azaeli akitaki, atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Mwana na yo ya mobali Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, atindi ngai ; atuni : « Boni, nakobika solo na bokono oyo ? »


Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,


asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te ;


Sima na basanza misato, tozwaki masuwa oyo elekisaki tango na yango ya malili makasi kati na esanga. Ezalaki masuwa ya engumba Alekizandri, oyo batia bilembo ya Kasitori mpe Polikisi.


Sima na yango, babeli mosusu ya esanga bayaki epai na ye mpe babikisamaki.


Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.


Tolukaki te lokumu kowuta na bato, ezala epai na bino to epai ya bato mosusu,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ