Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 27:5 - Mokanda na Bomoi

5 Sima na biso kokatisa ebale monene oyo eleka pembeni-pembeni ya Silisi mpe ya Pafili, tosemaki na Mira, kati na mokili ya Lisi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 27:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na Pafosi, Polo elongo na baninga na ye bazwaki masuwa mpe bakendeki na Perje, kati na mokili ya Pafili, epai wapi Yoane Malako atikaki bango mpo na kozonga na Yelusalemi.


Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye : Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino : Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ; Mbote na bino.


kasi Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe akobaki lisusu te elongo na bango kati na mosala.


Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.


ya Friji mpe ya Pafili, ya Ejipito mpe ya Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome,


Polo azongisaki : — Te, ezali ngai te ! Ngai nazali Moyuda ya Tarse, kati na mokili ya Silisi, mpe moto ya engumba moko ya tina mingi. Nabondeli yo, pesa ngai nzela ya koloba na bato.


— Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai ; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo.


Bongo bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo ebengamaka Ndako ya mayangani ya bansomi : Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azia ; bakomaki kotia tembe na miso ya Etieni.


Sima na yango, nakendeki na bituka ya Siri mpe ya Silisi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ