44 Bamosusu basengeli kolanda bango na kodiembela na mabaya to na biteni ya masuwa. Ezali ndenge wana nde bato nyonso bakomaki malamu na mokili.
« Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble ; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.
Kasi sik’oyo, nazali kolendisa bino ete boyika mpiko, pamba te moko te kati na bino akokufa, kaka masuwa nde ekobeba.
mpe alobaki : « Polo, kobanga te. Osengeli kosamba liboso ya Sezare. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo ozali kosala elongo na bango mobembo kati na masuwa. »
Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama moko mpe na basoda : — Tala, soki bato oyo batikali te kati na masuwa, bino mpe bokobika te.
Pamba te Makomi elobi : « Soki ezali na pasi makasi nde moto ya sembo abikisami, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ? »