Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 27:41 - Mokanda na Bomoi

41 Kasi masuwa ekendeki kotutana na zelo ya ebale mpe ekangamaki. Wana eteni ya liboso ya masuwa ekangamaki na zelo mpe ezalaki lisusu koningana te, eteni ya sima ya masuwa epanzanaki na nguya ya bambonge.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 27:41
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, mokonzi azalaki te kati na mokili ya Edomi. Ezalaki kaka na moyangeli moko oyo azalaki kotambolisa kuna.


Eliezeri, mwana mobali ya Dodavawu, moto ya Maresha, asakolaki mpo na kotelemela Jozafati ; alobaki : « Lokola osali boyokani elongo na Akazia, Yawe akobebisa misala na yo. » Mpe bamasuwa ebebaki mpe ekokaki lisusu te kokende na Tarsisi.


Baluki nkayi na yo bamemaki yo kino na kati-kati ya bibale minene. Kasi mopepe ya este ebukaki-bukaki yo na biteni na kati-kati ya ebale monene :


Kasi tango sik’oyo bambonge ya bibale minene ebuki-buki yo, ebwaki yo kati na mozindo ya mayi : biloko na yo mpe basali na yo nyonso bazindi elongo na yo.


Sima na komatisa yango na masuwa, bazwaki basinga mpe bakangisaki yango. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Silite, babwakaki longo ya libaya likolo ya mayi, mpe mopepe ekobaki komema masuwa.


Kasi, lokola basali ya masuwa balingaki kokima, babandaki kokitisa kati na ebale monene mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama, mpe basalaki lokola nde balingi kokende kokangisa balongo na liboso ya masuwa.


Babwakaki balongo na ebale ; mpe kaka na tango yango, bafungolaki basinga ya yenda, batombolaki bakapo mpo ete mopepe emema masuwa na ngambo ya libongo ya zelo.


Basoda bazwaki likanisi ya koboma bakangami mpo bazalaki kobanga ete bakatisa mayi mpe bakima.


Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ