40 Babwakaki balongo na ebale ; mpe kaka na tango yango, bafungolaki basinga ya yenda, batombolaki bakapo mpo ete mopepe emema masuwa na ngambo ya libongo ya zelo.
Basinga na yo esili kolemba, ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele ; ezali lisusu te kofungola malamu vwale. Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba, bato ya tengu-tengu, bango moko penza, bakobotola eteni na bango ya bomengo.
Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
Sima na komatisa yango na masuwa, bazwaki basinga mpe bakangisaki yango. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Silite, babwakaki longo ya libaya likolo ya mayi, mpe mopepe ekobaki komema masuwa.
Kasi masuwa ekendeki kotutana na zelo ya ebale mpe ekangamaki. Wana eteni ya liboso ya masuwa ekangamaki na zelo mpe ezalaki lisusu koningana te, eteni ya sima ya masuwa epanzanaki na nguya ya bambonge.