37 Kati na masuwa, tozalaki bato nkama mibale na tuku sambo na motoba.
Bato oyo bandimaki mateya ya Petelo bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato babakisamaki na lisanga ya bandimi.
Sima na bango kolia mpe kotonda mingi, babwakaki ble na ebale mpo na kokitisa kilo ya masuwa.
Bongo, Jozefi atindaki ete bakende kozwa tata na ye Jakobi elongo na bandeko na ye nyonso. Bango nyonso bazalaki bato tuku sambo na mitano.
Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali.
milimo oyo etosaki te na tango ya kala, na tango oyo Nzambe azalaki kokanga motema wana azalaki kozela ete Noa asilisa kotonga masuwa. Kati na masuwa yango, motango moke kaka ya bato, bato mwambe, nde babikisamaki na mayi ya mpela.