32 Boye, basoda bakataki basinga oyo esimbaki mwa bwato yango mpe batikaki yango kokweya na mayi.
Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.
Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele.
Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama moko mpe na basoda : — Tala, soki bato oyo batikali te kati na masuwa, bino mpe bokobika te.
Wana bazalaki kozela tongo kotana, Polo alendisaki bato nyonso ete balia ; alobaki : — Ekokisi lelo mikolo zomi na minei wuta bozali kozela, mpe bolie ata eloko moko te.