29 Lokola bazalaki kobanga ete masuwa etutana na mabanga, babwakaki balongo minei na mayi wuta na sima ya masuwa, na posa makasi ya komona tongo kotana.
Sima na komatisa yango na masuwa, bazwaki basinga mpe bakangisaki yango. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Silite, babwakaki longo ya libaya likolo ya mayi, mpe mopepe ekobaki komema masuwa.
babwakaki singa mpo na komeka mozindo ya mayi mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezali na bametele pene tuku misato na sambo. Wana bapusanaki mwa liboso, bamekaki lisusu mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezali na bametele pene tuku mibale na mwambe.
Kasi, lokola basali ya masuwa balingaki kokima, babandaki kokitisa kati na ebale monene mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama, mpe basalaki lokola nde balingi kokende kokangisa balongo na liboso ya masuwa.
Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso ; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule