Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 27:22 - Mokanda na Bomoi

22 Kasi sik’oyo, nazali kolendisa bino ete boyika mpiko, pamba te moko te kati na bino akokufa, kaka masuwa nde ekobeba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 27:22
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi : « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo ; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele !


Satana azongiselaki Yawe : — Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.


Abangaka basango ya mabe te ; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.


Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.


Baninga na ngai, boyika mpiko, pamba te nazali na kondima kati na Nzambe ete akosala ndenge kaka ayebisaki ngai.


Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama moko mpe na basoda : — Tala, soki bato oyo batikali te kati na masuwa, bino mpe bokobika te.


Nasengi na bino ete bolia sik’oyo. Bosengeli na yango mpo ete bozala na bomoi. Moko te kati na bino akobungisa ata suki moko ya moto na ye.


Bamosusu basengeli kolanda bango na kodiembela na mabaya to na biteni ya masuwa. Ezali ndenge wana nde bato nyonso bakomaki malamu na mokili.


Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ