Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 27:20 - Mokanda na Bomoi

20 Lokola tosalaki mikolo ebele na kozanga komona lisusu moyi mpe minzoto te, mpe mopepe ezalaki kaka kobeta makasi, tobungisaki elikya ya kobika.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 27:20
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atindaki molili oyo ekotaki kati na mokili, mpe bato ya Ejipito batombokelaki maloba na Ye te.


Nzela na yo nyonso elembisaki yo nzoto, kasi omilobelaki te : ‹ Ezali na tina te ! › Loboko na yo ezwaki lisusu makasi ya sika, yango wana olembaki te.


Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola ! Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo ! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›


Alobaki na ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! »


Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa.


Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »


Na mokolo ya misato, na maboko na bango moko, babwakaki na ebale, biloko oyo etambolisaka masuwa.


Sima na bato kosala mikolo ebele oyo baliaki lisusu te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki : — Baninga na ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Kreti te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki te kobungisa biloko na bino.


mbala misato, babetaki ngai banzete ; mbala moko, babambaki ngai mabanga ; mbala misato, nazindaki na mayi ; nasalaki mokolo moko mpe butu moko kati na ebale monene.


Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.


Bandeko, toboyi bozanga boyebi na tina na bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ