Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 27:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tomataki na masuwa oyo ewutaki na engumba Adramite mpo na kokende na mabongo ya pembeni-pembeni ya mokili ya Azia, mpe tokendeki ; Arisitarke, moto ya Masedwane ya Tesalonika, azalaki na biso elongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 27:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale. Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki.


Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga : — Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko.


Sima na Polo mpe Silasi kolekela na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendeki na Tesalonika epai wapi ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki.


Mpe bato mingi ya maji bamemaki babuku na bango mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Tango balukaki koyeba motuya ya babuku yango, emonanaki ete ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende nkoto tuku mitano.


Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo ; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano.


Bato ya Parte, ya Mede mpe ya Elami, bavandi ya Mezopotami, ya Yuda, ya Kapadose, ya Ponti mpe ya Azia,


Atako bongo, tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso elongo na basi na bango mpe bana na bango bakendeki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpo na kosambela.


Boye, bapesaki biso lokumu ya ndenge na ndenge ; mpe tango tokomaki pene ya kozongela mobembo na biso, bapesaki biso biloko nyonso oyo tozalaki na yango posa mpo na mobembo.


Tosemaki na engumba Sirakize, mpe tolekisaki kuna mikolo misato.


Tango tokomaki na Rome, bapesaki Polo nzela ya kovanda ye moko na ndako ; batielaki ye soda moko mpo na kokengela ye.


Bavandi ya esanga yango batalisaki biso bolingo monene mpe basungaki biso mingi. Lokola mvula ezalaki konoka mpe malili ezalaki makasi, bapelisaki moto mpe babengaki biso nyonso ete tokende koyetola.


Arisitarke, moninga na ngai kati na boloko, atindeli bino mbote. Boyamba mpe mbote ya Malako, ndeko ya Barnabasi, oyo na tina na ye napesaki bino mitindo ete, soki ayei epai na bino, boyamba ye malamu.


Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ