Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 27:18 - Mokanda na Bomoi

18 Mokolo oyo elandaki, lokola mopepe ezalaki kaka koningisa masuwa makasi, babwakaki na ebale, biloko oyo ezalaki kati na masuwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 27:18
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tenga lokola bato balangwe masanga, bwanya na bango nyonso elimwaki.


Bato oyo basalaka na masuwa bakomaki kobanga, mpe moto na moto akomaki kobelela nzambe na ye ; babwakaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango na ebale monene mpo na kokomisa masuwa pepele. Kasi Yona akitaki na kobe ya masuwa mpe, kuna, alalaki pongi ya makasi.


Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?


Pamba te bomoi eleki bilei na tina, mpe nzoto eleki bilamba na tina.


Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.


Na mokolo ya misato, na maboko na bango moko, babwakaki na ebale, biloko oyo etambolisaka masuwa.


Sima na bango kolia mpe kotonda mingi, babwakaki ble na ebale mpo na kokitisa kilo ya masuwa.


Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ