16 Lokola tolekaki na lombangu, na pembeni-pembeni ya esanga moke oyo babengaka Koda, tolongaki na pasi kokanga mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama.
Sima na Polo kozwa emoniseli, tolukaki mbala moko kokende na Masedwane, pamba te tososolaki ete ezali Nzambe nde abengi biso mpo ete tokende koteya kuna Sango Malamu.
Sima na komatisa yango na masuwa, bazwaki basinga mpe bakangisaki yango. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Silite, babwakaki longo ya libaya likolo ya mayi, mpe mopepe ekobaki komema masuwa.
Kasi, lokola basali ya masuwa balingaki kokima, babandaki kokitisa kati na ebale monene mwa bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama, mpe basalaki lokola nde balingi kokende kokangisa balongo na liboso ya masuwa.