Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 27:13 - Mokanda na Bomoi

13 Wana mwa mopepe moko ya sude ekomaki kopepa, bakanisaki ete posa na bango ezali kokokisama ; boye batombolaki longo, mpe masuwa ekomaki kotambola pembeni-pembeni ya esanga ya Kreti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 27:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bilamba na yo ezali na moto, nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi.


Wuta na likolo, atindikaki mosika mopepe ya Este ; mpe na nguya na Ye, amemaki mopepe ya Sude.


Oh mopepe ya nor, lamuka ; oh mopepe ya sude, yaka ! Pepa kati na elanga na ngai, mpe tika ete solo kitoko na yango epanzana kino mosika ! Tika ete mwasi na ngai ya motema aya kati na elanga na ye mpe alia mbuma na yango ya elengi makasi !


Tango mopepe ya sude efulaka, bolobaka : « Molunge ekozala makasi penza, » mpe esalemaka bongo.


bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda : bato ya Kreti mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe, na nkota na biso ya mboka ! »


Lokola mpe libongo ezalaki esika ya malamu te mpo na kolekisa tango ya malili makasi, mingi kati na bato bazwaki mokano ete tolongwa wana mpe toluka kokoma na Fenikisi oyo ezali libongo ya Kreti, oyo etala na ngambo ya sude-weste mpe ya nor-weste, mpo na kolekisa kuna tango yango ya malili makasi.


Sima na bato kosala mikolo ebele oyo baliaki lisusu te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki : — Baninga na ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Kreti te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki te kobungisa biloko na bino.


Tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga yango na pasi penza kino tokomaki na esika oyo babengaka « Mabongo kitoko, » pene ya engumba Laseya.


Moto moko ya Kreti, oyo bango moko bato ya Kreti bazwaka lokola mosakoli, alobaki : « Bato ya Kreti bazalaka bakosi, bazalaka banyama mabe, bato na lokoso mpe bagoyigoyi. »


Natikaki yo kati na Kreti mpo ete osilisa kobongisa makambo oyo etikalaki mpe opona bakambi ya Lingomba kati na engumba moko na moko, ndenge natindaki yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ