Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 27:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango bazwaki mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Itali, bapesaki Polo elongo na ndambo ya bakangami na maboko ya Juliusi oyo azalaki mokonzi ya basoda nkama moko ya Rome, kati na mampinga ya mokonzi monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 27:1
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.


Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.


tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.


Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.


Ezali malamu mpo na moto komema ekangiseli na ye wana azali nanu elenge.


Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !


Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki : — Moto oyo azalaki penza sembo !


Kuna, mosali moko ya mokonzi ya basoda azalaki kobela mpe akomaki pene ya kokufa. Mokonzi yango ya basoda azalaki kolinga mingi mosali na ye.


Na Sezarea, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Kornei ; » azalaki mokonzi ya basoda oyo babengamaka « mampinga ya Itali. »


Bato yango bazongisaki : — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.


Sima na Polo kozwa emoniseli, tolukaki mbala moko kokende na Masedwane, pamba te tososolaki ete ezali Nzambe nde abengi biso mpo ete tokende koteya kuna Sango Malamu.


Kuna, akutanaki na Moyuda moko, kombo na ye ezalaki « Akilasi. » Azalaki moto ya mboka Ponti. Akilasi awutaki koya kala te longwa na Itali, elongo na mwasi na ye, Prisile, pamba te mokonzi Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso balongwa na Rome. Boye, Polo akendeki kotala bango ;


Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambami ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki : — Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome.


Mbala moko, azwaki basoda elongo na bakonzi na bango, mpe bakendeki na lombangu epai ebele ya bato bazalaki. Tango kaka bamonaki mokonzi ya basoda elongo na basoda na ye, batikaki kobeta Polo.


Tango mokonzi ayokaki bongo, akendeki koyebisa mokonzi ya basoda : — Okosala nini ? Tata oyo azali moto ya Rome.


Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.


Bongo Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama moko mpe alobaki na ye : — Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye.


Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama moko ete abatela Polo lokola mokangami kati na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa bandeko na ye nzela mpo ete basunga ye.


Sima na Festisi kokabola makanisi elongo na bapesi toli na ye, alobaki na Polo : — Lokola osengi kokende kosamba liboso ya Sezare, okokende solo kosamba liboso na ye.


Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome.


Kasi mokonzi ya basoda nkama moko alandaki toli ya kapitene ya masuwa mpe ya nkolo masuwa, na esika ete ayoka maloba ya Polo.


Kasi lokola mokonzi ya basoda nkama moko azalaki na posa ya kobikisa Polo, apekisaki bango kokokisa likanisi na bango. Boye, atindaki bato oyo bayebaki kokata mayi ete bazala bato ya liboso ya kokweya na mayi mpe bakende na mokili.


Kuna, mokonzi ya basoda nkama moko amonaki masuwa moko ya engumba Alekizandri, oyo ezalaki kokende na Itali, mpe akotisaki biso kati na yango.


Wana tososolaki ete tosili kobika na likama, toyokaki ete babengaka esanga yango Malite.


Tango tokomaki na Rome, bapesaki Polo nzela ya kovanda ye moko na ndako ; batielaki ye soda moko mpo na kokengela ye.


Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso. Bandeko ya Itali batindeli bino mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ