Misala ya Bantoma 26:7 - Mokanda na Bomoi7 Bato ya mabota na biso zomi na mibale basalelaki Nzambe, butu mpe moyi, na kolemba te, mpo ete bazalaki na elikya ete bakomona kokokisama ya elaka yango. Mokonzi Agripa, ezali kaka mpo na elikya yango nde Bayuda bafundi ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato oyo bakendeki na bowumbu bazongaki wuta na bowumbu mpe babonzaki mpo na Isalaele mobimba lokola mbeka ya kotumba epai ya Nzambe ya Isalaele : bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali tuku libwa na motoba, bana meme tuku sambo na sambo, mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka ya masumu. Babonzaki nyonso lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.
Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.