Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome.
Sima na bato ya Rome koyekola na mozindo likambo na ngai, bazwaki mokano ya kotika ngai, pamba te bamonaki likambo moko te ya mabe oyo ekokaki kosala ete nazwa etumbu ya kufa.
Kasi Bayuda basepelaki te na mokano yango ; boye nasengaki ete nakende kosamba liboso ya Sezare ; elingi koloba te ete nazalaki na likanisi ya kofunda bato ya ekolo na ngai.
Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.