Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 26:29 - Mokanda na Bomoi

29 Polo azongisaki : — Ezala na tango molayi to na tango moke, nazali kosambela Nzambe ete, yo moko kaka te, kasi elongo na bato nyonso oyo bazali koyoka ngai lelo, bokoma lokola ngai, longola kaka minyololo oyo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 26:29
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elenge mwasi yango alobaki na nkolo na ye ya mwasi : — Ah, soki kaka nkolo na ngai, Namani, akokaki komona mosakoli oyo azali kati na Samari ! Akoki penza kobikisa ye na bokono na ye ya maba.


Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !


Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.


Jeremi azongisaki : — Te, bakokaba yo te ! Nabondeli yo, tosa Yawe mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo ; bongo nyonso ekotambola malamu mpo na yo mpe okobikisa bomoi na yo.


Kasi Moyize azongisaki : — Boni, okosalela ngai zuwa na likambo nini ? Nakosepela kutu ete bato nyonso bakoma basakoli mpe Yawe akitisa Molimo na Ye epai na bango !


Ngai, nandimaka litatoli ya moto te ; kasi nalobi bongo mpo ete bobika.


Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko.


Mokonzi ya basoda apusanaki, akangaki Polo mpe apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo mibale. Bongo atunaki soki Polo azali nani mpe asali nini.


Lokola balekisaki kuna mikolo mingi, Festisi ayebisaki mokonzi likambo ya Polo ; alobaki : — Ezali awa na moto moko oyo Felikisi atikaki kati na boloko.


Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai ya Nzambe ezali ete bana ya Isalaele babika.


Bosili kotondisama na nyonso oyo bozalaka na makanisi ya kozwa ! Bosili penza kokoma bato ya bomengo ! Bobandi kokonza ; bobandi kokonza elongo na biso te ! Nalingaka ete bobanda penza kokonza, mpo ete biso mpe tokonza elongo na bino !


Nakokaki kosepela ete mibali nyonso bazala lokola ngai ; nzokande, moto na moto azali na likabo na ye ya ngolu, oyo azwi kowuta na Nzambe : moko azali na likabo oyo, mosusu azali na likabo wana.


Bandeko, nabondeli bino : boyikela nanu oyo emonani lokola bozoba na ngai mpiko ! Iyo, boyikela ngai mpiko.


Ezali mpo na Sango Malamu yango nde nazali motindami kati na minyololo. Boye, bobondelaka mpo ete natatolaka yango na kozanga bobangi, ndenge nasengeli penza kolobela yango.


Ezali Ye Klisto nde biso tosakolaka, na kokebisa mpe na koteya moto nyonso, na bwanya nyonso, mpo na kokomisa moto nyonso ya kokoka kati na Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ