Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu,
moto oyo akangama makasi na Liloba ya solo, ndenge kaka bateyaki ye yango. Na bongo, akoki kolendisa bato mosusu na nzela ya malakisi ya peto mpe kosukisa tembe ya bato oyo bandimaka te.
Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.