24 Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye : — Ozali na liboma, Polo ! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma !
Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye : — Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ? Jewu azongisaki : — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka.
Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.
Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !
Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki : — Tokoyoka yo mokolo mosusu na tina na likambo oyo.
Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye : — Ekoki mpo na sik’oyo ! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.
Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.