Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 26:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mokonzi, na ngonga ya midi, wana nazalaki kokende, namonaki pole moko kowuta na likolo, elekaki kutu ata kongenga ya moyi ; pole yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki kotambola elongo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 26:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.


Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi, mpe pole ya moyi ekongenga makasi koleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo, na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Ye mpe akobikisa yango.


Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.


Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, na ngonga pene ya midi, namonaki mbala moko pole makasi kowuta na Likolo mpe kongengela ngai.


Bato oyo bazalaki na ngai elongo bamonaki pole yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai.


Ezali mpo na yango nde nakendeki na Damasi, na bokonzi mpe na etinda ya bakonzi ya Banganga-Nzambe.


Tokweyaki biso nyonso na mabele, mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai na lokota ya Arami : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? Ezali pasi mpo na yo komibamba na basende. »


Wana azalaki kokende na Damasi mpe akomaki pene ya engumba yango, amonaki mbala moko pole moko kowuta na likolo mpe kongengela ye.


Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ