Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 26:1 - Mokanda na Bomoi

1 Agripa alobaki na Polo : — Napesi yo nzela ya koloba. Boye, Polo atombolaki loboko mpe abandaki kosamba :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 26:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzi na kozanga koyoka soni.


Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,


Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.


Moto ya liboso na kosamba amonanaka lokola nde alongi ; kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei, akotelemela ye.


Natombokelaki yo, nabotolaki yo bilei oyo napesaki yo mpe nakabaki yo na maboko ya banguna na yo, bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki mpe kosepela ata moke te na bizaleli na yo ya soni mpe ya mabe.


— Boni, mibeko na biso ekoki kokatela moto etumbu na kozanga koyoka ye liboso, mpe na kozanga koyeba mabe oyo asili kosala ?


— Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa.


Kasi nayebisaki bango ete bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye, mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye.


Pamba te namoni ete tina ezali te ya kotinda moto ya boloko na Rome, soki nalongi te kolimbola malamu likambo oyo bafundeli ye.


— Mokonzi Agripa, nazali na esengo mingi ya kosamba lelo liboso na yo, na tina na makambo nyonso oyo Bayuda bafundeli ngai,


Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.


Kasi alobaki boye mpo na Isalaele : « Natandaki maboko na Ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazanga botosi mpe bato ya mito makasi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ