9 Kasi lokola Festisi alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Polo : — Boni, olingi kozonga na Yelusalemi mpe kosamba kuna liboso na ngai mpo na makambo oyo ?
Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
Tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangaki mpe Petelo na tango ya feti ya mapa ezanga levire.
Sima na mibu mibale, Porsiusi Festisi akomaki moyangeli na esika ya Felikisi oyo, mpo na kosepelisa Bayuda, atikaki Polo kati na boloko.
Lokola nayebaki te ndenge nini nakoki kokata likambo ya lolenge oyo, natunaki ye soki alingi kokende na Yelusalemi mpo ete bakata likambo na ye kuna.
mpo ete asalela bango ngolu ya kotinda Polo na Yelusalemi, pamba te basalaki mabongisi ya kotiela ye motambo na nzela mpo na koboma ye.