Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 25:6 - Mokanda na Bomoi

6 Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezarea. Mokolo oyo elandaki bozongi na ye, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 25:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba : — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye !


Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata. »


Mikolo misato sima na ye koya kati na etuka, Festisi alongwaki na Sezarea mpo na kokende na Yelusalemi


Polo azongisaki : — Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Sezare ; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe.


Tango bayaki awa, nalekisaki tango te ; kasi mokolo oyo elandaki, navandaki na esambiselo mpe napesaki mitindo ete bamemela ngai moto yango.


Kasi Festisi azongiselaki bango : — Polo azali nanu kati na boloko, na Sezarea ; mpe kala mingi te, nakozonga kuna.


Tika ete tokende nzela moko na ndambo ya bakambi na bino, mpo ete, soki moto yango asalaki mabe, bafundela ye kuna.


Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti ; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.


Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.


Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ