10 Polo azongisaki : — Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Sezare ; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe.
toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.
Sima na bato ya Rome koyekola na mozindo likambo na ngai, bazwaki mokano ya kotika ngai, pamba te bamonaki likambo moko te ya mabe oyo ekokaki kosala ete nazwa etumbu ya kufa.
Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome.
Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezarea. Mokolo oyo elandaki bozongi na ye, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo.
Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango, kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya kufa to ya boloko.
Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba : — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye !