Pilato alobaki na bango : — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino. Bayuda bazongiselaki ye : — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.
Mpe bato oyo bafundi ngai batikala nanu kokuta ngai te nazali kotia tembe na moto to nazali kotindika bato ete batomboka, ezala kati na Tempelo to kati na bandako ya mayangani to mpe kati na engumba.