Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo.
Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
Lokola balekisaki kuna mikolo mingi, Festisi ayebisaki mokonzi likambo ya Polo ; alobaki : — Ezali awa na moto moko oyo Felikisi atikaki kati na boloko.