Lokola Polo ayebaki ete, kati na bato ya Likita-Monene, bamoko bazalaki Basaduseo, mpe bamosusu, Bafarizeo, agangaki kati na Likita-Monene : — Bandeko na ngai, nazali Mofarizeo, mwana ya Bafarizeo ; nazali kosamba mpo na elikya na biso ya lisekwa ya bakufi.