Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 24:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yo moko okoki koluka koyeba malamu ete eleki nanu mikolo zomi na mibale te wuta nakendeki na Yelusalemi mpo na kosambela Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 24:11
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki biso epai ya Jake, mpe bakambi nyonso ya Lingomba bayaki kuna.


Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo ; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.


Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.


Sima na mwa tango moke, mokonzi ya basoda abengisaki bakonzi mibale ya basoda nkama moko mpe alobaki na bango : — Bobongisa basoda nkama mibale, basoda tuku sambo oyo batambolaka na bampunda mpe basoda mosusu nkama mibale, mpo ete bakende na Sezarea, na ngonga ya libwa ya butu.


Sima na mikolo mitano, Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ayaki na Sezarea, elongo na ndambo ya bakambi mpe molobeli Tertile, mpo na kofunda Polo epai ya moyangeli.


Sima na ngai kosala mibu ebele na libanda ya Yelusalemi, nazongaki na mboka na ngai mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi, mpe mpo na kobonzela Nzambe makabo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ