10 Tango moyangeli apesaki Polo nzela ya koloba, Polo azongisaki : — Nayebi solo ete ozali mosambisi ya ekolo oyo wuta mibu ebele. Boye, nazali na esengo ya kosamba liboso na yo.
Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;
Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe na tina na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, wana etali kaka bino moko ; ngai naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye.
Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato.
Sima na mokonzi ya basoda kopesa ye nzela, Polo atelemaki na binyatelo mpe atombolaki loboko. Bato batikaki makelele, mpe Polo akomaki koloba na bango na lokota ya Arami :
Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,
Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye ; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye ? » Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango.