1 Sima na mikolo mitano, Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ayaki na Sezarea, elongo na ndambo ya bakambi mpe molobeli Tertile, mpo na kofunda Polo epai ya moyangeli.
Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo.
Tango mikolo sambo ekomaki pene ya kokoka, Bayuda ya mokili ya Azia bamonaki Polo kati na lopango ya Tempelo. Batombokisaki ebele nyonso ya bato mpe bakangaki ye
Tango bayebisaki ngai ete Bayuda basaleli ye likita mpo na koboma ye, nazwaki mokano ya kotinda ye epai na yo noki penza ; mpe napesaki lisusu mitindo na bato oyo bafundaki ye ete baya kofunda ye epai na yo.
Tango babengisaki Polo, Tertile akomaki kofunda ye liboso ya Felikisi na maloba oyo : — Tata moyangeli Felikisi, ezali mpo na yo nde tozali na kimia ya solo, mpe mpo na bwanya na yo nde mbongwana ya solo ekota kati na ekolo oyo.