Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 23:9 - Mokanda na Bomoi

9 Makelele emataki makasi penza. Boye ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki Bafarizeo batelemaki mpe batombolaki mingongo na mpiko nyonso : — Solo, tomoni ata mabe moko te ya kopamela moto oyo. Nani ayebi ? Tango mosusu molimo to anjelu nde alobaki na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 23:9
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.


Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli : « Esengeli te koboma moto oyo ! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. »


Tango balakisi ya Mobeko ya lingomba ya Bafarizeo bamonaki Yesu kolia mesa moko na bato ya masumu mpe bafutisi mpako, batunaki bayekoli na Ye : — Mpo na nini azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato : — Mpo na nini ? Mabe nini tata oyo asali ? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu ; sima, nakotika ye.


Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato : — Namoni mabe moko te epai ya moto oyo.


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki : — Ezali kake ! Bato mosusu balobaki : — Anjelu moko asololi na ye !


Soki Nzambe apesaki bango likabo ya ndenge moko na biso oyo tondimelaki Nkolo Yesu-Klisto, bongo ngai nde nani mpo ete nakoka koboya makambo oyo Nzambe alingi ?


Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, na ngonga pene ya midi, namonaki mbala moko pole makasi kowuta na Likolo mpe kongengela ngai.


Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? »


Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango, kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya kufa to ya boloko.


pamba te Basaduseo balobaka ete lisekwa ezalaka te, ba-anjelu bazalaka te, milimo mpe ezalaka te ; nzokande, Bafarizeo bandimaka makambo wana nyonso.


Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome.


Wana bazalaki kobima, balobanaki bango na bango : — Moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki komemela ye etumbu ya kufa to ya boloko.


Na butu ya lelo, Anjelu na Nzambe na ngai, oyo nasalelaka, ayaki epai na ngai


Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te. Bato ya Likita-Monene bandimaki likanisi ya Gamalieli,


Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye : — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ?


Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ?


Samuele alobaki na bango : — Yawe azali Motatoli mpo na kotelemela bino, mpe mopakolami na Ye azali motatoli na mokolo ya lelo ete bomoni ata eloko moko te kati na maboko na ngai. Bato bazongisaki : — Azali penza Motatoli.


Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki : — Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai ? Mpe Saulo alelaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ