Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 23:6 - Mokanda na Bomoi

6 Lokola Polo ayebaki ete, kati na bato ya Likita-Monene, bamoko bazalaki Basaduseo, mpe bamosusu, Bafarizeo, agangaki kati na Likita-Monene : — Bandeko na ngai, nazali Mofarizeo, mwana ya Bafarizeo ; nazali kosamba mpo na elikya na biso ya lisekwa ya bakufi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 23:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.


Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :


Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?


— Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai ; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo.


Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo ; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.


Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.


Polo atalaki bato nyonso ya Likita-Monene mpe alobaki : — Bandeko na ngai, kino na moyi ya lelo, nazali kotambola na motema ya peto liboso ya Nzambe.


Bino mpe bato ya Likita-Monene, bokende sik’oyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino, lokola nde bolingi koyekola malamu likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa.


Elenge mobali azongisaki : — Bayuda bayokani kosenga na yo ete, lobi, omemela bango Polo liboso ya Likita-Monene, lokola nde balingi koyekola lisusu likambo na ye.


Tango kaka alobaki bongo, koswana makasi ekotaki kati na Bafarizeo mpe Basaduseo, mpe mayangani ekabwanaki ;


Boye ngai, ndenge moko na bango, nazalaka na elikya na Nzambe ete bato nyonso bakosekwa, ezala bato ya sembo to bato mabe.


longola kaka liloba oyo nabimisaki, wana natelemaki liboso na bango : « Bozali kosambisa ngai lelo mpo ete nandimaka ete bakufi bakosekwa ! »


Yango wana nasengaki komona bino mpe kosolola na bino, pamba te ezali mpo na elikya ya Isalaele nde nakangami na minyololo oyo.


pamba te bakatisaki ngai ngenga na mokolo ya mwambe, nazali penza moto ya Isalaele kati na libota ya Benjame, mpe nazali Mo-Ebre oyo abotama na baboti oyo bazali mpe Ba-Ebre. Mpo na oyo etali Mibeko, nazalaki Mofarizeo ;


Kondima mpe bolingo yango etongami na likolo ya elikya ya bomengo oyo Nzambe abongisela bino kati na Likolo ; elikya yango ebotamaki kati na bino tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu


Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso ; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ