Bongo Polo alobaki na ye : — Nzambe akobeta yo, yo mir oyo bapakola langi ya pembe ! Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga, nzokande yo nde moto obuki Mobeko mpo ete opesi mitindo ete babeta ngai !
Polo azongisaki : — Bandeko, nayebaki te ete azali mokonzi ya Banganga-Nzambe, pamba te nayebi malamu ete ekomama : « Okolobaka mabe te na tina na mokambi ya bato na yo. »