Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 23:19 - Mokanda na Bomoi

19 Mokonzi ya basoda akamataki elenge mobali na loboko, amemaki ye na pembeni mpe atunaki ye : — Likambo nini olingi koyebisa ngai ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 23:19
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi atunaki ngai : — Olingi nini ? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,


Mokonzi atunaki ye : — Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai !


Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester : — Ester, mwasi ya mokonzi, bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali koleka kati-kati ya mokili na ngai ya bokonzi.


Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi : — Kati na engumba Size, Bayuda babomi mpe babebisi bato nkama mitano elongo na bana mibali zomi ya Amani. Basali nini kati na bituka mosusu ya mokonzi ? Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo.


ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito ; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.


Yesu alobaki na ye : — Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Moteyi, nalingi komona.


Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka ; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye : — Boni, omoni eloko ?


Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye ; mpe mwana atelemaki.


Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga ;


Boye bakamataki ye, bamemaki ye na Areopaje mpe balobaki na ye : — Boni, tokoki koyeba soki mateya ya sika oyo ozali koteya elingi koloba nini ?


Boye, mokonzi yango amemaki ye epai ya mokonzi ya basoda mpe alobaki : — Mokangami Polo abengaki ngai mpe asengaki na ngai ete namemela yo elenge mobali oyo, pamba te azali na likambo ya koyebisa yo.


Elenge mobali azongisaki : — Bayuda bayokani kosenga na yo ete, lobi, omemela bango Polo liboso ya Likita-Monene, lokola nde balingi koyekola lisusu likambo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ