Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 23:18 - Mokanda na Bomoi

18 Boye, mokonzi yango amemaki ye epai ya mokonzi ya basoda mpe alobaki : — Mokangami Polo abengaki ngai mpe asengaki na ngai ete namemela yo elenge mobali oyo, pamba te azali na likambo ya koyebisa yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 23:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu alobaki na ye : — Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo. Mofarizeo azongisaki : — Moteyi, loba yango.


Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga ;


Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.


Bongo Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama moko mpe alobaki na ye : — Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye.


Mokonzi ya basoda akamataki elenge mobali na loboko, amemaki ye na pembeni mpe atunaki ye : — Likambo nini olingi koyebisa ngai ?


Tango bazwaki mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Itali, bapesaki Polo elongo na ndambo ya bakangami na maboko ya Juliusi oyo azalaki mokonzi ya basoda nkama moko ya Rome, kati na mampinga ya mokonzi monene.


Sima na mikolo misato, Polo abengisaki bakambi ya Bayuda mpo ete bakutana na ye. Tango basanganaki, alobaki na bango : — Bandeko na ngai, ata nasalaki bato ya ekolo na biso ata mabe moko te, mpe nabukaki ata mobeko moko te ya bakoko na biso, bakangaki ngai na Yelusalemi mpe bakabaki ngai na maboko ya bato ya Rome.


Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano—


Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga na bino ete botambolaka na lolenge oyo ebongi na bato oyo Nzambe abengi :


kasi nasepeli kosenga na yo na kombo ya bolingo, ngai Polo, mobange mpe sik’oyo mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ