Misala ya Bantoma 23:12 - Mokanda na Bomoi12 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Bayuda basalelaki Polo likita ; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele bayaki kosangana na bango : kati na Banganga-Nzambe, kati na Balevi, kati na bakengeli bikuke, kati na bayembi, kati na basali ya Tempelo mpe kati na bato nyonso oyo bakabwanaki na bikolo ya bapaya oyo ezalaki zingazinga na bango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe, elongo na basi na bango, bana na bango nyonso ya mibali mpe ya basi, bato nyonso oyo bazali na makoki ya kososola.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bino mpe basi na bino, bomonisi na nzela ya misala na bino elaka oyo bopesaki tango bolobaki : « Tokokokisa solo ndayi oyo tolapaki ete tokotumba malasi ya ansa mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, nzambe mwasi ya bato ya Babiloni. » Bokende ! Bosala ndenge bolobi mpe bokokisa ndayi na bino !
Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »
Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.