Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 22:8 - Mokanda na Bomoi

8 Natunaki : « Nkolo, yo nani ? » Alobaki na ngai : « Nazali Yesu ya Nazareti, oyo yo ozali konyokola. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 22:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe alobaki na ye : — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana : « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka.


epai wapi avandaki kati na engumba Nazareti, mpo ete makambo oyo basakoli balobaki ekokisama : « Bakobenga Ye moto ya Nazareti. »


Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »


Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »


Petelo azongisaki : — Te, Nkolo ! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto.


Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? »


Ngai moko mpe nazalaki liboso kokanisa ete esengeli na ngai kosala nyonso oyo ekoki kosalema, mpo na kotelemela Kombo ya Yesu ya Nazareti.


Kasi Petelo alobaki na ye : — Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango : na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.


tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.


pamba te toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso.


Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele ; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto.


Mpe Yawe azongiselaki Samuele : « Yoka makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo. Ezali yo te nde basundoli, kasi basundoli nde Ngai lokola Mokonzi na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ