Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 22:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 22:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atunaki ye : — Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi ? Azongisaki : — Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.


Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye : — Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo.


Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo : — Abrayami ! Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo.


Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye : — Ozali wapi ?


Tango Yawe amonaki ete Moyize azali kobaluka mpo na kotala, Nzambe abengaki ye wuta na nzete moke yango : — Moyize, Moyize ! Moyize azongisaki : — Ngai oyo !


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mabe nini batata na bino bazwaki Ngai mpo ete basundola Ngai ? Basepelaki kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, mpe bango moko bakomaki bato pamba.


Yango wana, nakosambisa bino, » elobi Yawe. « Nakosambisa bino elongo na bakitani na bino,


Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »


Pilato atunaki lisusu : — Mabe nini asali ? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !


Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, na ngonga pene ya midi, namonaki mbala moko pole makasi kowuta na Likolo mpe kongengela ngai.


Natunaki : « Nkolo, yo nani ? » Alobaki na ngai : « Nazali Yesu ya Nazareti, oyo yo ozali konyokola. »


Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye : — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ?


atako liboso nazalaki kofinga mpe konyokola Ye mpe nazalaki moto na kanza ; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo oyo nazalaki kosala mpe nazalaki na kondima te.


Yawe ayaki mpe atelemaki wana ; abengaki lokola na mbala mosusu : — Samuele ! Samuele ! Samuele azongisaki : — Nkolo, loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ