Misala ya Bantoma 22:30 - Mokanda na Bomoi30 Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo ; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.