29 Mbala moko, bato oyo balingaki kobeta ye fimbu batikaki ye. Mokonzi ya basoda akomaki kobanga tango asosolaki ete tata oyo ye akangaki minyololo azali penza moto ya Rome.
Mokonzi ya basoda apusanaki, akangaki Polo mpe apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo mibale. Bongo atunaki soki Polo azali nani mpe asali nini.
Mokonzi ya basoda alobaki : — Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome. Polo azongisaki : — Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama.
Mpo na kondima, basi bamonaki bato na bango, oyo bakufaki kozonga lisusu na bomoi. Bato mosusu bandimaki ata konyokwama mpe baboyaki ete basikola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa mpe bakozala na bomoi oyo ezali kitoko koleka.