28 Mokonzi ya basoda alobaki : — Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome. Polo azongisaki : — Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama.
Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.