Wana bazalaki kokanga Polo basinga, Polo atunaki mokonzi oyo azalaki wana : — Boni, mibeko epesi penza ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbu, wana bosambisi ye nanu te ?
Mokonzi ya basoda alobaki : — Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome. Polo azongisaki : — Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama.